12 heures - Ferre Gola

12 heures

Ferre Gola

00:00

06:12

Similar recommendations

Lyric

Ba nzembo ebetaka na 12 heures souvent

Tango tokendaka na classe

Mais ba ninga mingi tozalaka na bango bazalaka tour ya tango

Yo na 17 heures wana okozonga na yo, yo boule kak'okodamer

Mère azotuta n'e pondu

Sikoyo eza faute ya mère

Ou bien père moto atika ye mbongo na retard

Ou bien yaya akende kosomba biloko na retard

Bolingo eza facile ba ndeko bondimela ngaï

Nazo comprendre love yango té, Mandembo okeyi wapi

Mbeto ya bolingo ebonga bato mibale natikali ngaï moko

Papa, maman babota nga bakufa, bakomi squelette na lilita

Ngaï pe nazokufa pona bolingo ya Mandembo (maméee)

Déception ekati misisa bomoyi makila nzoto nioso esopani

Kasi Ndembo aboyi koyokela ngaï mawa

Ndambo ya bolingo n'o Mandembo okoki osomba na vie na ngaï

Pene na yo chérie, mabe okoki koyela ngaï jamais

Okeyi kolembisela nani nzoto,

Heure creuse yango ekoki moment baliaka bolingo mon amour

Poso ya nzoto na yo, couvrelure na mayi

Caresse na yo avion ememaka na lola ba

Sentiments nga nazongaka bébé (pesa nga bolingo)

Ngaï awa (ba posa nzoto ekomi'olala nzala)

Est-ce que nakoki'o vivre sans yo mama (Pourquoi

Ekoki nanu eye té, nazo mituna Mandembo, Mandembo eh)

Yak'osala nga Diki-Diki lokol'osalaki semaine passée

Ndambo ya bolingo n'o Mandembo okoki osomba na vie na ngaï

Pene na yo chérie, mabe okoki koyela ngaï jamais

Nazokoka té kolala sans yo

Molimo na yo e scotcha motema na ngaï en otage

Pourquoi bolingo ekomi'o lekela nga na mopepe (ah bon)

Sans boué ya bolingo elingi etika nga nde likombe (ah oui)

Mokuse ezosala ngaï, nzoto mobimba yaka kokuanza ngaï

Na motolu nzoto eleki makasi

Ndambo ya bolingo n'o mama eh okoki osomba na vie na ngaï

Pene na yo chérie, mabe okoki koyela ngaï jamais

Mama abota ngaï

Mandembo ayebi kobota, abota nga ba chances na nga na la vie

Tala

Je t'aime beaucoup mon bébé tu es à moi

Pesa nga bolingo (Mandembo)

Ba posa nzoto ekomi'olala nzala

Est-ce que nakoki'o vivre sans yo mama (Pourquoi

Ekoki nanu eye té, nazo mituna Mandembo, Mandembo eh)

Mandembo a lova nga, nakobanga nini

Bolingo ya mwana mama ekotanga na makila

Mandembo a lova nga, nakobanga nini

Bolingo ya mwana mama ekotanga na makila

Mandembo a lova nga, nakobanga nini

Bolingo ya mwana mama ekotanga na makila

Eddie Makuntima a lova nga, nakobanga nini

Bolingo ya mwana mama ekotanga na makila

Ba mata bokolanda nzela oyo nga na tika, botanga kombo na ngaï té

Willy Musheni eh eh

Willy Musheni eh eh eh

Soki oza té nga nakomaka ndenge pona yo Mandembo

Willy Musheni eh eh

Willy Musheni eh eh eh

Soki oza té nga nakomaka ndenge pona yo Mandembo

- It's already the end -